Menu

Banzembo 3

BIB

1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye. 2 Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni ! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai ! 3 Ebele bazali koloba na tina na ngai : « Nzambe akobikisa ye te ! » 4 Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai. 5 Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule. 6 Nalalaka mpe nazwaka pongi ; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai. 7 Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso. 8 Yawe, telema ! Nzambe na ngai, kangola ngai ! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu. 9 Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe. Tika ete lipamboli na Yo ewumela kati na bato na Yo.

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate