Menu

Banzembo 52

BIB

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki. 3 Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabe ? Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso. 4 Yo oyo otambolaka na lokuta, lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi, ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu. 5 Olingaka mabe koleka bolamu, lokuta koleka koloba bosolo. 6 Oh lolemo ya lokuta, olingaka maloba nyonso oyo epanzaka. 7 Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi. 8 Bato ya sembo bakomona mpe bakokoma na somo, bakotiola ye na maloba oyo : 9 « Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe lokola ebombamelo na ye, azalaki kotiela bozwi na ye motema, mpe kobakisa makasi na ye na nzela ya kobebisa bato mosusu. » 10 Kasi ngai, kati na Ndako na Yo, nazali lokola nzete ya olive oyo etondi na makasa ya mobesu ; natiaka tango nyonso elikya na ngai kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela. 11 Nakosanzola Yo mikolo nyonso, mpo na oyo osali ; mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo, pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate