Menu

Banzembo 93

BIB

1 Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te. 2 Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ; seko na seko, ozali. 3 Yawe, bibale egangaka ! Bibale etombolaka lokito na yango ; bibale etombolaka makelele na yango. 4 Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo ; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene. 5 Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

Everything we make is available for free because of a generous community of supporters.

Donate